IN/Prabhupada 0007 - Krishna's Maintenance Will Come



Lecture on SB 1.5.22 -- Vrndavana, August 3, 1974

Brahmānanda: Andzimaka mossalla moko tée.

Prabhupāda: Tée. Ata azali kokoufa na nzala. Akoki kondzima mossalla moko tée. Wana ezali brahmana Kshatriya azali pée bongo, vaisya azali ndéngué moko na bango. sudra yée azali bongo tée. Vaisya yée akozwa lollengué moko akossala mossalla. Akossala mombongo. Botalla lisséssé oyo essalema. Mobali moko kombo na yée Nandi, na kalla, na calcutta, akeyi komona moninga na yée pona assenga yée mwa mossollò: soki okoki kodefissa ngaï mbongo pona na sala mombongo sima na zonguissella yo yango, na koki na banda mombongo" yée azonguissé'liyé: "Yo ozali vaisya? moteki bilokò" "Iyo." "Yango pona nini ozali kossenga mossollò? Mbongo ezali na balla'balla. Ezali yo ndé moto oko'louka yango." Yée azonguissi: ."Nako'ki kozwa yango tée" "Yo'okoki kozwa yango tée? Wana ezali nini?" "Simba, oyo ezali pokõ ya kokoufa." "Tala mbongo na yo ya mombongo." Essenguelli na yo kossossola.

Na tango wana, mokônõ ya peste ezalaki kopandzama na kati ya Calcutta mobimba. Mossalla oyo étali makambo ya bopeto elobaki moto oyo ako'mema pokõ ya kokoufa na ba bureaux na bango, moto wana bakofouta na annas mibalé. Yée azwaki ébembé ya pokõ oyo bapessaki yée amemi yango na ba bureau ya mossala ya bopeto. Pée bafoutaki yée ba annas mibalé. Na ba annas na yée mibalé, assombeli ba mbouma ya bétel ébellé, sima ya kossokolla yango, yée ateki yango na ba annas minãì to annas mitano. Ndengué wana, lissoussou, lissoussou pée lissoussou, moto wana akomi na mvouama , Moto moko ya libota na yée azalaki moko na kati ya lissanga na bisso ya Nzambé. Libota ya Nandi, Libota wana ya Nandi kaka, ezalaki kolissa bato ndzomi na sambo ti na kama na mokolo mokò. Libota monené ya bato ya mbongo. Pée mibeko ya libota wana ezalaki tango mwana ya mobali to ya mwassi ako botama, bongò ba kama ndzomi(5000) ya roupie ezalaki kofanda na banque, pona tango ya liballa, mwana akö zwoua bongò kama ndzomi(5000) na intérêts yako mata, Soki tée, azali na ya'yée ata ndambo na bongò oyo babombaki na ndako ya mossòllo to banque tée. Pée na bato missoussou ya libota wana, bazwa ndambo ya mbongò ya kolia pée na yako moufoutella ba ndako. Yango ezali ya bango oyo... Oyo ya solõ, na lingui koloba, mokondzi ya libota wana ,monsieur Nandi,mobali na kombo ya Nandi, Abanda mombongo na yée na pokõ moko ya kokoufa.

Ezali bossolò, solò soki, soki ollingui obika na ndengué na yo... Na Calcutta, na mona. Na ba vaiśya ya ba bola, na tõngo bazali kozwa dãl, sacochi moko ya dãl, ako tekissa yango ndako na ndako. Dãl ba liya'ka yango bissika nyonso. yango, na moyi yée assalaka mombongo na yée ya dãl, pée na pokwa ateka'ka mafouta ya kérosène. Pona pokwa nyonso moto nyonso azali na possa na yango. kaka na mboka inde bokozwa, yée ... Moto moko tée oyo azali kolouka mossalla . Mokiè na oyo azali kozwa, ngouba to poto'potò ya cacahuètes, ye ateka'ka. azalaki kossalla elokò moko. Sima na yango, Kṛṣṇa abate'laka moto nyonso. babounga kokanissa ké: "mobali oyo azali kopessa ngaï nini yako bika." Tée. Sãstra élobi, eko yo bahūnāṁ vidadhāti kāmān. Ezali kozala na élikia na Kṛṣṇa, "yango Kṛṣṇa apessi ngaï bomoyi, Yango yée akobi'kissa ngaï, yango, pona makoki na ngaï, botika ngaï na sala élokô moko, pona na nzela ya élokô wana, Kṛṣṇa akossala pona na bika.